Kurani ya Santu na lokota Lingala
. Mpe bakotiyaka buku (ya moto na moto) mpe okomona batomboki bazali kobanga maye makomami na kati, mpe bakolobaka: Mabe na biso, buku eye etikaki eloko te, ezala moke to ya monene sé ekomaki yango. Mpe bakokutaka maye basalaki polele, kasi Nkolo wayo abubaka moto te.
50. Mpe tango tolobaki na ba anzelu ete: Bogumbamela Âdam, bagumbamaki, longola sé satana azalaki kati ya ba djini mpe
aboyaki kotosa mobeko mwa Nkolo wa ye. Boye bokozua ye na libota lia ye mpo bazala babateli na botiki ngai mpe bazali banguna ya bino? Oyo kopona ya mabe mpona babubi!
51. Nazuaki bango te banzeneneke na bokeli mapata na mabele, ndenge moko kokelama na bango, mpe na koki te kozua babungisi mpona kosalisa nga.
52. Mpe o mokolo moye akolobaka: Bobenga basangani na ngai baye bolikiaki, bakobengaka bango kasi bakoyanolaka bango te, mpe tokotiyaka kati kati na bango libulu lia bobungisi.
53. Mpe batomboki bakomonaka móto, mpe bakondimaka ete bakokweya na yango, kasi bakozuaka esika ya bokimi te.
54. Mpe ya sôló, tosilaki kolimbola na kati ya kurani eye bandakisa ya ndenge na ndenge mpona bato, kasi moto aleki sé kotia tembe.
55. Kasi nini epekisaki bato bandima, tango bokambi(1) boyelaki bango, mpe basenga bolimbisi epai ya Nkolo wa bango? Sé oyo ekomelaki bankoko ba bango eyeli mpe bango, to etumbu ya lolenge nyoso eyela bango?
56. Mpe totindaka batindami sé mpona bopesi sango malamu mpe bokebisi. Kasi baye bapengwa bazali kosuanisa bosembo na lokuta na bango, mpona kobebisa. Mpe bazuaki mikapo mia ngai na maye bakebisamaki na yango na litio.
57. Nani azali moto mabe koleka oyo apesi mokongo na bilembo bia Nkolo waye tango bazali koteya ye yango,, mpe abosani
maye maboko (mibale) naye masalaki? Tozipi mitema mia bango ete basosola te, (bayeba kososolo kurani te) mpe matoyi na bango makangami, mpe soki obengi bango na bokambami, bakokambama soki moke te.
58. Mpe Nkolo wayo azali molimbisi atonda mawa, soki alingi kozua bango na maye basalaki akoyela bango etumbu noki, mpe bazali na elaka asilaki kotiela bango oyo soki ekoki, bakozua esika ya kokimela te.
59. Mpe wana nde bamboka eye tobomaki tango bato ba yango babubaki, mpe tosilaki kopesa elaka ya bobebisami na bango.
60. (Kanisa) tango Mûssa alobaki na mosali waye ete: Nakotelema te kino nakoma na esika bibale mibale bikutani, to natambola mibu miyike.
61. Mpe tango bakomaki wana, babosanaki mbisi na bango, oyo alandaki nzela naye kati na ebale.
62. Mpe tango bango banso babale baleki (esika) ena, alobi na mosali waye: Yela biso biloko bia biso ya kolia, tosili kolembe na mobembo mwa biso moye.
63. (Elenge wa ye) alobaki: Omoni tango tofandaki pene ya libanga ya monene nabosanaki mbisi kuna, satana nde abosanisi ngai
mpo nakanisa yango te, mpe (Mûssa) azongaki sima mpona kolanda nzela ya ebale na kokamwa.
64. (Mûssa) alobi: Wana nde oyo tozalaki koluka, mpe babongoli makolo ma bango balandi bilembo bia yango bazali kosolola.
65. Mpe bakutaki mowumbu wa biso, oyo topesaki ye ngolu ma biso, mpe totangisaki ye boyebi bonene.
66. Mûssa ayebisi ye: Boye nalanda yo mpo otangisa ngai boyebi boye otangisama ya bosôló?
67. (Moto wana) alobi na Mûssa ete: Okokoka kokanga motema elongo na ngai te.
68. Ndenge nini okokoka kokanga motema na maye (makambo) oyo ozali na boyebi na yango te?
69. (Mûssa) alobi: Na bolingi bwa Allah, okomona ngai na kangi motema. Mpe nakoboyaka mobeko nayo ata moko te.
70. Alobi: Soki olandi ngai kotuna ngai eloko te kino nakoyebisa yo ntina na yango.
71. Bakei bango mibale, tango bamati na masuwa (bwato) abebisi yango, (Mûssa) alobi: Obebisi yango mpo ozindisa bakolo na
yango? Osali mpenza likambo linene!
72. (Wana) alobi: Nayebisaki yo te ete: Okokoka kokanga motema te elongo na nga?
73. (Mûssa) alobi: Komona ngai mabe te na ndenge nabosani, mpe kotelema makasi te mpona likambo lia ngai.
74. Bakei bango banso babale, kino bakutanaki na mwana mobali, mpe abomi ye. (Mûssa) alobi: Obomi moto sé pamba boye, oyo asali eloko te? Osali sôló mabe monene.
75. (Moto wana) alobi: Nayebisaki yo te ete okokoka kokanga motema elongo na ngai te?
76. (Mûssa) alobi: Soki natuni yo lisusu eloko sima na yango, osili kozua nzela mpona kokabuana na ngai. Okolimbisama mpona
kokabuana na ngai.
77. Bakei bango babale kino bakomi na mboka ya bato, batuni bayamba bango na biloko ya kolia, baboyi koyamba bango.
Mpe bakutaki kati na yango efelo elingi kokweya, (moto wana) atomboli yango, (Mûssa) alobi; Soki olingaki mbele osengaki
lifuta mpona yango.
78. Alobi ete: Oyo nde bokabwani kati kati na ngai nayo, nakolimbolela yo maaye okokaki kokanga motema te.
79. Mpona masuwa (bwato), ezalaki ya babola basalaka na yango na ebale. Nabebisaki yango mpo sima na bango ezalaki na mokonzi moko mobubi azalaki kobotolo ba bwato nyoso ya kitoko.
80. Mpe mpona mwana mobali, azalaki na baboti baye babale, bazalaki bandimi, tobangaki (soki akoli) akobebisa bondimi bwa
bango na botomboki na bopengwi.
81. Tolingaki ete Nkolo wa bango mibale apesa bango mwana mosusu ya malamu, apetwama mpe ya boboto esika naye.
82. Mpe mpona efelo, ezalaki ya bana bitike babale kati na mboka wana, o nsé na yango ezalaki na bomengo na bango, kasi tata
wabango azalaki (moto) malamu, Nkolo wa yo alingaki ete soki bakoli babimisa bomengo bwa bango bona na mawa ma Allah.
Nasalaki yango na mitindo mia ngai moko te. Wana nde ndimbola ya maye okokaki kokanga na yango motema te.
83. Mpe bazali kotuna yo mpona Dzu-al-Qarnaïn,(1) loba: Nakotangela bino mwa bokundoli moke.
84. Ya sôló, tolendisaki bokasi bwa ye awa na nsé, mpe topesaki ye nzela likolo ya biloko binso.
85. Mpe alandaki nzela,
86. Kino tango moyi mokokita, akuti yango ekiti na moluka mwa mayi ma móto pene na yango akuti bato, tolobaki: Oh Dzu-al
Qarnaïn! Opesa bango etumbu to osalela bango bolamu.
87. Alobi: Oyo abubaki, tokopesa ye etumbu, sima tokomema ye epai ya Nkolo waye apesa ye etumbu ya somo koleka.
88. Mpe oyo andimaki mpe asalaki mosala ya malamu, ye akozua lifuta lilamu mpe tokoloba naye, (na bopesi) mibeko mia biso
mizali pete.
89. Sima alandaki nzela,
90. Kino akomaki na ebimeli ya moyi
akutaki (moyi) ezali koleka likolo
na bato moko boye topesaki bango eloko te ya komizipa na moyi.
91. Ndenge wana nde ndenge tozipaki boyebi bwa biso na oyo azalaki na yango.
92. Sima alandaki nzela,
93. Kino tango akomaki kati ya ndelo ezwami na kati ya ngomba mibale akuti sima na yango bato baye bazali kososola maloba ya bato misusu te.
94. Balobi: Oh Dzu-al-Qarnaïn! Ya sôló, ba ya’djûdj na ba ma’djûdj(1) bazali babebisi na mokili, tokoki te kotiela yo makoki ete opika ndelo kati na biso na bango?
95. Alobi: Oyo Nkolo wa ngai apesi ngai ezali malamu (koleka oyo ya bino) bosalisa ngai na bokasi bwa bino mpe natia ndelo kati na bino na bango. (mpo bakatisa te)
96. Boyela ngai liboke ya libende, mpe tango asilisi kotondisa taka kati na bangomba mibale, alobi na bango ete: Bofula, kino ezuaki móto, alobi na bango ete: Boyela ngai mayi ya libende wana eyanguami nasopa yango likolo.
97. Bakokaki komonisa bokasi te na komata na yango.
98. Alobi: Oyo ezali ngolu kowuta epai ya Nkolo wa ngai, tango elaka ya Nkolo wa ngai ekoyaka, akolalisa yango mpe akosukisa
yango, mpe elaka ya Nkolo wa ngai ezalaka solo.
99. Mpe totikaki bazali kotepatepa bango na bango, mpe bakobetaka kelelo mpe tokosangisa bango banso.
100. Mpe mokolo mona tokolakisaka bapengwi móto mwa lifelo.


Ashton Porter –
A stylish wallet for those who love high-quality accessories